• Quelle imagination?

    Partager via Gmail Delicious Yahoo! Google Bookmarks

    votre commentaire
  • Matu Samuel  ayemba na loyembo naye moko: "Beto ya libala ekotaka mibali mibale te mpe basi mibale te " Mais botala  awa ndenge nini technologie   a osée kokota na kati ya beto ya libala....Moto na moto na lisolo na ye ya kukule elombe Kokamua  !!!!!!!!!!!

    Partager via Gmail Delicious Yahoo! Google Bookmarks

    votre commentaire
  • Aza na esika naye asalaka!

    Tango Nzambe akendaki na Egypte ezalaki pona ko délivrer libota moko mpe komema  ye na ESIKA oyo  aponaki po apambola bango.

    Tango Nzambe ayaka kozua  biso na mokili  , ezali po amema biso kati na PRESENCE naye,esika oyo  à commandaka  mapambili elanda biso na nionso.

    Soki tolingi toseka...esengeli tozala esika oyo Nzambe azali komona biso. Yango alobaki  na Moïse  kende kolobela  Pharaon :"... Laisse aller mon peuple.."

    (Exode 8,1)

    Eza na Egypte te mais  na Canaan.Tozali kolobela mapamboli ya Nzambe oyo ememaka  ba chagrins te.

    Partager via Gmail Delicious Yahoo! Google Bookmarks

    votre commentaire
  • Ozali kozela nini?

    Ata eza ,libanda na Yesu eloko eza te .

    Libanda na Yesu  mituna ezanga biyano.

    Libanda na Yesu kimia na koseka  eza ya lokuta...

    Yango alobaki :«Sans moi vous ne pouvez rien faire»

    (Jean 15,5).

    Alors moninga ozali kozela nini ?

    Luka  Ye lelo.Yamba Ye lokola Mobikisi mpe Mokonzi na bomoyi nayo .Tika lolendo oyo ozali kosala .Yesu azali eyano ya mituna nayo. Kaka Ye  nde akoki kopesa yo esengo na motema, kosala ete na tongo moko oseka .

    Luka Ye akoma Mokonzi ya ndako nayo, ya libala nayo, ya bana nayo, ya ministère nayo,ya ba projets nayo ...Po kati naye okoyemba mokolo nionso loyembo oyo : Eya na butu, eya na moyi na kobanga eloko te po Yesu azali musungi na ngai... Yesu azali kobatela ngai...

     

     

    Partager via Gmail Delicious Yahoo! Google Bookmarks

    votre commentaire
  • Ba maudire ngai likolo ya koluka...

    Likola koluka koyeba ba lakeli  ngai mabe jusqu'à na 7º générations na ngai.

    Na landi mosali ya Nzambe moko  oyo asala kombo.Moto na Nzambe wana azalaki koteya na mokanda ya 1 corinthiens  esika balobi:" Basi ba kanga minoko na bango kati na lisanga ya bana na Nzambe...Soki balingi bayeba likambo  songolo batuna yango na mibali na bango na ba ndako...". Sima ya émission naye na bengaki mosali na Nzambe oyo  asala kombo soki akoki koyamba ngai po nazalaki na mutuna moko ya kotuna ye na makambo ateyaki na télévision.

    Mutuna na ngai ezalaki boye: soki Paul azali kolobela  na basi  ya mabala ete  soki balingi bayeba....esengeli na bango bakende kotuna mibali na bango na ba ndako, bongo ba moseka,ba oyo babala te to babali  nanu te bakokende kotuna epai ya  nani? Moto na Nzambe oyo asala kombo akoloba : "Dans ce cas batuna ba pasteurs na bango.

    Ndenge tolobaka  réponse  wana ekotaki ngai ata muke . Na sengaki ye soki akoki kosunga ngai na passage biblique moko esika ba lobi pona ba moseka esengeli na bango batuna ba pasteurs na  bango.Koloba ndenge wana mosali na Nzambe akosilika mabe. Kaka na esika wana abandi kolakela ngai ba malédictions ya ndenge ndenge jusqu'à na 7° générations na ngai.Mosali na Nzambe oyo asala kombo akoloba ete nazali na esprit  ya Jazebel ,naye ko séduire ye... Akobengana ngai lokola babenganaka  soso.Nionso wana  po naluki nayeba vérité...

    Mais Biblia ezali kolobela biso ete  Paul akendaki na vile moko koteya ,  ba ndeko ya vile wana sima koyoka ye bakende kotala to ko vérifie na Maloba ya Nzambe soki oyo ndeko Paul ateyaki bango ezalaki solo .Bongo pona nini ba pateurs ya lelo balingaka te to vérifier ba mateya na bango na Liloba ya Nzambe ?

    Partager via Gmail Delicious Yahoo! Google Bookmarks

    votre commentaire


    Suivre le flux RSS des articles de cette rubrique
    Suivre le flux RSS des commentaires de cette rubrique