Eklablog Tous les blogs Top blogs Religions & Croyances
Editer l'article Suivre ce blog Administration + Créer mon blog
MENU

To seka muke

Lobi oyo ewuti koleka , na etonga na biso na lisanga ya ba mama ,toyambaki mosali ya Nzambe moko ya mwasi po aya koteya biso makambo etali  bopeto ya mwasi na libanda mpe nakati.Mama oyo alobaki nionso oyo akokaki kolobo.Alobiki pe soki ba papa mingi bakendaka koluka tango mususu ba nionio na libanda ezalaka faute na biso ba mama ya ndako.

Nayokaki na ngai makambo nionso alobaki  mais ngai ndenge nini na kobongisa nzoto? Na ndako nasalaka nionso.Tongo tongo  na sokoli ba oyo bakendaka kelasi mpe nakeyi kotika  bango .Kozonga na ngai na ndako na bandi mosala ya kobongisa, yako lamba, Kosokola bilamba.... Bino moko boyebi bana soki bazali nanu mike, na ba ndako oyo ya biso ya poto,basakanaka kaka na ndeko.Lokola pe nalandisi bango 6 mobimba nazo mona makambo na ngai.

15 h soki ekoki , il faut nakima bango pona kozua ba yaya.Nasala oyo, nazua oyo, mutugisi ya bana epai... Tango nini ba ndeko nako bongisa nzoto na ngai. Nakoma lokola moto ya liboma, mwana  ya musula.....

Klik hier voor meer gratis plaatjesWapi ye mobali ya ndako?  Libanda.Na mokili ndenge abengaka go ye moko. Kuna musala kotonga ngai ete nazali mwasi  ya salité,  ya solo, ya désordre, nayebi kolamba te, mwasi azanga tendresse...

 

Retour à l'accueil
Partager cet article
Repost0
Pour être informé des derniers articles, inscrivez vous :
Commenter cet article