• Ba lakeli ngai mabe....

    Ba maudire ngai likolo ya koluka...

    Likola koluka koyeba ba lakeli  ngai mabe jusqu'à na 7º générations na ngai.

    Na landi mosali ya Nzambe moko  oyo asala kombo.Moto na Nzambe wana azalaki koteya na mokanda ya 1 corinthiens  esika balobi:" Basi ba kanga minoko na bango kati na lisanga ya bana na Nzambe...Soki balingi bayeba likambo  songolo batuna yango na mibali na bango na ba ndako...". Sima ya émission naye na bengaki mosali na Nzambe oyo  asala kombo soki akoki koyamba ngai po nazalaki na mutuna moko ya kotuna ye na makambo ateyaki na télévision.

    Mutuna na ngai ezalaki boye: soki Paul azali kolobela  na basi  ya mabala ete  soki balingi bayeba....esengeli na bango bakende kotuna mibali na bango na ba ndako, bongo ba moseka,ba oyo babala te to babali  nanu te bakokende kotuna epai ya  nani? Moto na Nzambe oyo asala kombo akoloba : "Dans ce cas batuna ba pasteurs na bango.

    Ndenge tolobaka  réponse  wana ekotaki ngai ata muke . Na sengaki ye soki akoki kosunga ngai na passage biblique moko esika ba lobi pona ba moseka esengeli na bango batuna ba pasteurs na  bango.Koloba ndenge wana mosali na Nzambe akosilika mabe. Kaka na esika wana abandi kolakela ngai ba malédictions ya ndenge ndenge jusqu'à na 7° générations na ngai.Mosali na Nzambe oyo asala kombo akoloba ete nazali na esprit  ya Jazebel ,naye ko séduire ye... Akobengana ngai lokola babenganaka  soso.Nionso wana  po naluki nayeba vérité...

    Mais Biblia ezali kolobela biso ete  Paul akendaki na vile moko koteya ,  ba ndeko ya vile wana sima koyoka ye bakende kotala to ko vérifie na Maloba ya Nzambe soki oyo ndeko Paul ateyaki bango ezalaki solo .Bongo pona nini ba pateurs ya lelo balingaka te to vérifier ba mateya na bango na Liloba ya Nzambe ?

    « Pourquoi la croix...Un amour qui pardonne et restaure ! »
    Partager via Gmail Delicious Yahoo! Google Bookmarks

  • Commentaires

    Aucun commentaire pour le moment

    Suivre le flux RSS des commentaires


    Ajouter un commentaire

    Nom / Pseudo :

    E-mail (facultatif) :

    Site Web (facultatif) :

    Commentaire :