• Klik hier voor meer gratis plaatjes

    Kombo na nga Tino . Nazali juriste de formation. Sima kosilisa université na ngai nazuaki mosala na cabinet moko ya ba avocats . Yango esalaki na bala oyo metama na ngai eponaki kati na basi nionso ya mokili,ma poupée Tina,oyo na bengaka ye: ma carotte. Mais sima ya liwa ya kolo cabinet,mosala na ngai pe ekosuka wana. Nakotaki na chomage ya libela.Nazalai koluka mosala mususu toujours na domaine na ngai ya avocat mais nazalaki kozua te.

    Tina ngai nde akomaki kosala nionso pona ndako.Afuta ndako, kolia na biso, ba soins ya bana mpe ngai moko tata.Azalaki koteka na alimentation moko na ville.En tant que mobali ,ezalaki kosala ngai pasi mingi.Na ba diplomes na ngai kosala ba misala ya maboko nayebaki yango te mpe nazalaki  kolinga yango te.

    Ezalaki Samedi  na bimaka muke na nzela na ngai na kokutana na moninga moko tokolaki naye  balabala moko . Ye akendaki mosika te na ba études naye  po azalaki naye mayele mingi te. Mais na makasi ya mwana mobali  ayekolaki kosala ba vases ya ba desseins mpe koteka yango na wenze ya bikeko po à faire vivre famille naye. Na masolo na biso na ko expliquer ye  ba conditions nini nazali ko vivre .Ndeko akoyebisa  ngai soki nakoki koya na atélier naye po alakisa ngai ndenge asalaka ba vases po nazua ata mosolo muke  pona  faire vivre libota. Na boyaki na motema se moko offre naye. Ngai Juriste na kende kosala misila  ya ndenge wana pas question....

    Tango nazongaki ndako nabeteli Tina na ngai lisolo . Ma poupée akolobela ngai:Tino mon lapin lolendo ezalaka na lifuti te kasi komikitisa ekoki kofongola yo ba portes ebele.Okota chômage ça fait 6 ans yango oyo .Ba mindele baloba : La nuit porte conseil.Oyebi kaka sikoyo avant oya , nalandi pasteur moko na télévision kolimbola verset oyo Yesu alobaki :" Le vent souffle où il veut, et tu en entends le bruit; mais tu ne sais d'où il vient, ni où il va" Mon lapin toyebi te....Kanisa malamu na butu oyo na proposition ya mwana ya balabala na bino.

    Conseil ya mama na Tim,Telma na Tiya  etindaki ngai na kanisa mingi. Le matin na kendaki na atelier ya moninga po alakisa ngai ndenge basalaka ba vases na  ba desseins .Lelo nakomi na deux grands ateliers na batu  ya misala. Ba commandes na ngai ewutaka mingi mimgi  na mikili ya poto. Lokola nasalaka  mosala na ngai propre , efongoli ngai ya solo ba portes mingi. Na kendaki ko présenter ba  oeuvres na ngai  na Afrique du Sud, na  Côte d'Ivoire,  na Ghana, na Allemagne, na Suisse, na Russie , na Londres mpe na Canada. Kaka na mosala oyo na tongi  ba lopango mibale ya minene. Tina atika koteka na alimetation.Akoma mère ya palais avec ba soins nionso oyo mobali asalaka na mwasi naye. 

    Ya solo ndenge balobaka na lopoto: Il n'y a pas de sots métiers, il n'y a que de sottes gens .Mopepe ekendaka esika elingi, mpe okoyoka makelele naye ;kasi okoyeba te esika nini awuti mpe esika nini azali kokende. Nzambe asalaka na ba lolenge  ebele  na bomoyi na biso...Eteya yo ndeko ndenge etayaki ngai .

    Partager via Gmail Delicious Yahoo! Google Bookmarks

    votre commentaire
  • Na sala nini ?

    Tika nabimi libanda po na mela likaya na ngai mpe nazali  primus oyo natindi petit ya quartier asombela ngai na ganda zikisa ye,po makambo  Kalina akomi kosala eza kolekela ngai...Napesa ye permission akendeka na église ya pasteur  Makolokoto.Akendaka ba retraites ya ba une semaine  po na zuaka mua muke  nzela yako sala ambiance na ngai ndenge nalingi. 

    Kasi makambo nakomi komona  mikolo oyo ezali kolekela ngai mutu . Wuta ngai naye tobalana ayebi  yango malamu ete soki na meli likaya te, na meli primus te mpe na bini  makina ya Zaiko langa langa te , journée na ngai  mobimba ezalaka malamu te. Mais tala banda akoma kokende epai ya pasteur oyo Makolokoto, likaya lisumu, masanga masuba ya  ba démons, musique milimo ya mabe . Ba camarades na ngai nionso ba ndoki ...Ye akoma mosantu bala misatu  ngai nakoma envoûter bala mitano.Soki awuti  na ba losambo naye   kombo mususu nayokaka lisusu te  na matoyi na ngai soki ezali  ya pasteur naye te .Makolokoto alobaki, asalaki, akendaki...

    Namoni il faut natia petit na ngai moko na temps po alandaka ye na sima soki akeyi église po tanga mususu  pasteur oyo Makolokoto tokomi kolia naye sani moko ..kombo oyo tata na ngai apesaki  ngai,oyo na pesaki ye tango nazalaki kolinga ye avant tobalana abosana yango. Soki abengi ngai na kombo ya papa te , akobenga ngai na kombo ya mwana na biso moko. Donc nazali lisusu Kojac te mais nakomi papa naye.Il faut na pekisa ye nzela ya  losambo . Nazali kokanisa ndenge nini na sala yango po kosala yango pe esika  nakobima  ya solo mokonzi ya ba démons. Kalina asisi ngai mayele... 

    "Car que sais-tu, femme, si tu sauveras ton mari? Ou que sais-tu, mari, si tu sauveras ta femme?" ( 1Cor 7,16)

     

    Partager via Gmail Delicious Yahoo! Google Bookmarks

    votre commentaire
  • Lobi oyo ewuti koleka , na etonga na biso na lisanga ya ba mama ,toyambaki mosali ya Nzambe moko ya mwasi po aya koteya biso makambo etali  bopeto ya mwasi na libanda mpe nakati.Mama oyo alobaki nionso oyo akokaki kolobo.Alobiki pe soki ba papa mingi bakendaka koluka tango mususu ba nionio na libanda ezalaka faute na biso ba mama ya ndako.

    Nayokaki na ngai makambo nionso alobaki  mais ngai ndenge nini na kobongisa nzoto? Na ndako nasalaka nionso.Tongo tongo  na sokoli ba oyo bakendaka kelasi mpe nakeyi kotika  bango .Kozonga na ngai na ndako na bandi mosala ya kobongisa, yako lamba, Kosokola bilamba.... Bino moko boyebi bana soki bazali nanu mike, na ba ndako oyo ya biso ya poto,basakanaka kaka na ndeko.Lokola pe nalandisi bango 6 mobimba nazo mona makambo na ngai.

    15 h soki ekoki , il faut nakima bango pona kozua ba yaya.Nasala oyo, nazua oyo, mutugisi ya bana epai... Tango nini ba ndeko nako bongisa nzoto na ngai. Nakoma lokola moto ya liboma, mwana  ya musula.....

    Klik hier voor meer gratis plaatjesWapi ye mobali ya ndako?  Libanda.Na mokili ndenge abengaka go ye moko. Kuna musala kotonga ngai ete nazali mwasi  ya salité,  ya solo, ya désordre, nayebi kolamba te, mwasi azanga tendresse...

     

    Partager via Gmail Delicious Yahoo! Google Bookmarks

    votre commentaire
  • Ye aponaki Leki

    Sima ya liwa ya bana mibale ya David:Amnon na Absalom,Adonija akomaki mwana ya liboso na libota, donc ye nde moto esengelaki sima ya liwa ya David akoma roi na Israël.Procedure oyo Adonija asalaki na  1 Rois 1,5 kino na 10 ezalaki ndenge balobaka na lopoto conforme à la constitution. Elingi koloba acte ya Adonija ezalaki na nzela ya malamu.

    Mais Nzambe  azali likolo ya ba lois nionso ya mokili,likolo ya ba constitutions oyo batu basala,likolo ya ba décisions batu bazali kozua, likolo ya makanisi ya batu, likolo ya ba déclartions oyo batu bakoki koloba, Ye aponaki leki na place ya kulutu ( 1Rois 1,32-37).

    Ndeko, okanisi soki Nzambe  alingi asala yo bolamu, soki azui mokano ya kopambola yo, ya kobikisa yo na malade moko songolo,ko délivrer yo na maboko ya bato oyo bazali koloka  yo , kotombola yo mpe kofandisa yo elongo moko na batu ya minene;akoluka liboso ayeba ba nani bazali kosala yo mabe, to nini ba muganga balobi pona malade nayo,to combien ba autels ya malédiction ekueyi mpe combien oyo etikali na bomoyi nayo?

    Okanisi  kofinga, koseka ,kotonga ya batu eko empêcher Loboko na Nzambe esala na bomoyi nayo? Batu bakoki  na bango koloba : Esili pona ye. ekomi trop tard...Mais Nzambe pe akoki kotuna na bango mutuna oyo:" Qui donc a assisté au conseil de l'Eternel..." pona koyeba  nini ngai Nzambe to liloba nini  ya suka  nalobi pona bomoyi nayo?(Jérémie 23,18).

    Ya solo loi elobaki Kasi Nzambe azali souverain et na souverainité naye, aponaki leki amata nakiti ya monkonzi ya David.

    Nazalaki koyebisa ndeko moko : tolingi Nzambe mingi mpe toyebi Ye malamu , mais liboso ya ba problèmes  na biso to se comportaka  netie toyebi ye malamu te .

    Ata ezali kowumela, ata bazali koseka, kofinga, kotonga. Ata yo moko ozali lisusu ko comprend te tia kaka elikia nayo Epai Naye. Po  eza Kaka Ye nde akoki kosala makambo oyo ekamuisaka toujours  bato.

    Lili

     

    Partager via Gmail Delicious Yahoo! Google Bookmarks

    votre commentaire
  • Regret muke

    Histoire oyo ezali na mokanda ya Exode 16,1-3.Exode elingi koloba :"Kobima" .Livre oyo ezali kotalisa biso lolenge nini Nzambe ayaki ko délivrer libota naye mpe lolenge nini abimisaki bango na mboka ya Egypto.

    Ba bula ebele na bowumbu,libota ya Israël bakomona  Loboko ya Nzambe mpe bakobima na mboka ya Egypte.Kasi tala sima kobima na bango mpe kokatisa mer rouge, likolo kozanga mayi babandi kotuka Nzambe. Na maloba na bango bazali ko regretter muke esika ba wutaki. Makanisi na bango ekozonga lisusu na mboka ya Egypte,mboka  oyo bazalaki koniokola bango.Kati na koyima na bango ,etalisi mpenza malgré délivrance ,Egypte elonguaki nanu te na mitema na bango.

    Eza na bana Nzambe boni ,basali na Nzambe boni ,Lisanga ya baklisto  boni ,oyo tozali koloba  toyebi Nzambe kasi nako tala bizaleli na biso , makambo tozali kosala ekotalisa quelque part tobonguani nanu malamu te malgré tolobi toza baklisto.To mitala  nanuna  na bitalala na biso po toyeba soki tozali vraiment te ko regrette ba vie na biso ya kala oyo tozalaki na go sans Jésus

     

     

     

    Partager via Gmail Delicious Yahoo! Google Bookmarks

    votre commentaire


    Suivre le flux RSS des articles de cette rubrique
    Suivre le flux RSS des commentaires de cette rubrique